PONA BILENGE YA EUROPA PE YA AMERICA YA LIKOLO
Ba epaka miye miwuti koselema o ekolo France pe misusu mya lolenge na yango na bikolo misusu ya mpoto mitindi ngai na komela bino mokanda moye. Soki na poni kolobela bino mbala moko ezali te mpo kobosana baboti ba bino, kasi po ete lobi ya bikolo na bino ezali na maboko ma bino, pe lisusu, po ete boluki bua soolo elongaka mitema mya bino.
Lolenge lioko naluki kolobela bakambi ya mbulamatari ya politiki te pamba te nazali kokanisa ete bazali koyeba malamu okati ya mitema mya bango ete bazali bokabuani bozali kati na nzela ya politiki na oyo ya bosembo.
Maye nabongisi kolobela bino awa ezali Islam, mpe mingi mpenza elongi oyo balakiseli bino yango. Uta mibu tuku mibale, too pe sima ya bokweyi ya Union Soviétique, manso masalemaki po ya kolakisa na bato ete lingomba yango ezali bongo munguna oyo esengeli kobanga. Bapelisi moto ya bobangisi, ya boyini pe baseleli na yango maye mazangi lokumu malekaki mingi na histoire ya politiki ya mpoto. Awa naboyi kokundola boyini mingi oyo elakisamaki okati ya bikolo bia mpoto.
Na bozongeli na lombango bolukiluki ya tango ya sika ya maye malekaki ; bokoki bino moko kososola ete ba malukiluki ya sika ya maye maleka kala mazali koluka koyeba litomba ya mosala ya bikolo bia mpoto na maye matali kobebisa lokumu ya bikolo misusu pe bokoko bua bango. Maye maleka na mikili ya Europa pe na Etats Unis etondisami na soni ya eleko ya bohumbu pe na oyo ya kokonza ba bikolo bisusu pe lisusu na ebele ya boniokoli pe bozangi limemia na bato bayindo to pe biyamba misusu.
Bato na bino ya mayele pe baluki bapusi mayele na bango pona kososola maye matalaki botangisi makila, maye masalamaki na kombo ya eyamba o eleko ya mibulu katikati ya bayambi ya katoliko na ba oyo ya ngelesa, to pe na kombo ya ekolo, to bituka o eleko ya bitumba ya liboso pe ya mibale ya mokili mobimba. Esengeli ete boyebi ya makambo oyo ekumisama. Nazali kolikya te kosala ntangi ya bipaka ya soni, nzoka nde nazali kosenga bino kotuna na banganga mayele na bino mutuna oyo : Mpona nini na mikili ya mpoto mayele na batu elamukaka se sima ya ba ntuku to pe bankoto ? Mpona nini momekano ya mayele yango ya bato etalaka kaka se maye masila koleka kala, pe etikaka maye oyo mazali ya ngonga oyo ? Mpona nini bazali koluka kopekisa bopusi makanisi ya lisanga na maye na ntina lokola oyo ya lolenge ya kolobela pe ya kosalela bizaleli pe bokanisi na lolenge ya Islam ?
Boyebi malamu ete bokitisi na botindi bato na boyini pe bobangi ya « mosusu » ezali bilembo ya misala ya komvuka oyo evandi na boniokoli. Nazali kolikya sika oyo bomituna pona nini mbala oyo politique yakala oyo yakotinda na bobangi pe boyini ezwi Islam na ba ndimi na ye lokola monguna mbala oyo na lolenge nayino esalama te ? Mpona nini na mokili ya lelo oyo lolenge ya kokomba elingi kozongisa emoneli ya Islam na sima pe kofina yango lokola eloko oyo esila tina ?
Islam ekoki koyeba makanisi pe makoki ya bopekisi makanisi ya bikolo oyo etonda nkita ya mokili ? Tina nini ya bopanzi sango ya lokuta pona Islam ? Elikia na nga ya yambo ezali ete bomituna na ntina ya maye mazali kotinda boyini ya Islam omiso ya bato.
Elikya na nga ya mibale ezali été na eyano ya emoneli ya mabe bozali koyeba mbala moko malamu mingi lisusu lingomba yango. Mayele ya malamu ezali kosenga boyeba ete nini bazali koluka kokimisa bino pe nini bazali kolakisa bino na mikolo oyo ya bobangi. Nazali kobenga bino te na makasi bondima lolenge nga nazali komona Islam to pe emoneli na ngayi na maye matali yango kasi nazali kotinda bino boboya emoniseli wana ya mokili ya lelo elakisamela na bino na nzela ya emoniseli ya politiki oyo esengeli te.
Bondima te ete bato ya mobulu oyo bahutaka mingi na bokonzi yango bakosaka kofunda bango, balakisamela bino lokola bakambi ya Islam. Bomeka koyeba Islam na nzela ya misisa mya yango, na nzela ya Coran na etamboleli ya Ntoma. Motuna esengeli kotunama : bosi botanga mokanda esantu ya ba Musulman ? Bosi boyekola mateya ya bomoto pe malako oyo eteyamaki na Ntoma ya Islam ? Bosi bozuaki mateya ya sango ya Islam nanzela mususu koleka oyo ya bopanzi sango ? Bosi bomituni soki na makonzi nini pe na bankita nini lingomba oyo bazali koyinisa ezalaki ebandeli ya yoko ya ba civilisation minene ya mokili, pe atonga etonga monene ya bato ya mayele, pe yango uta ba konto ebele ?
Na sengi na bino botika te ete bilembo ya mabe oyo ba koki kosala pona lingomba oyo ya monene esala ndelo ya molimo katikati na bino na bosolo, epekisa bino bososola malamu. Na mokili oyo ya lelo makoki ya bopanzi sango ebuki mindelo ya bikolo, botika te ete bakanga milimi mia bino okati ya mindelo oyo bango moko basali. Ata soki moto moko te akoki ye meyi kozipa mabulu minene oyo ekelami katikati ya lokuta na bosembo, moko moko na bino akoki na bokasi na ye moko ko kesenisa bosolo na lokuta, komipesa na bokeli gbagba oyo etongami na makanisi ya sembo pe ya nsomi ; ezali bagbagba oyo ekosala te mabulu mina mikoma mikuse. Atako mikakatano mizali pona bolongi momekano ya boye, makasi ya bokanisi ekoki kosala ete mituna ya sika mibotama nakati ya milimo na bino oyo etondi na posa ya koyeba bosolo pe lisusu makasi na bino pona bozui eyano na mituna miye ezali ntaka pona kokundola bosolo bwa sika. Na yango botika te ntaka oyo ya bososoli maye masengeli oyo ya Islam. Na lolenge oyo nde na lisungi ya bo mpikiliki bwabino na bosolo pe namaye masengeli, bikeke oyo bikoya sima ba kokoka kotala eloko oyo ya bokutani kati na bikolo ya mpoto na Islam na bonsomi ya mayele koleka mibu oyo milekaki.
Seyyed Ali KHAMENEI
29 novembre 2015
source : Leader.ir
Saturday
26 December 2015
1:13:15 PM
726981
Second Message of Ayatollah Khamenei to the Western Youth in Ngala.